4 Nakokomisa bakitani na yo ebele lokola minzoto ya likolo mpe nakopesa bango mabele oyo nyonso. Boye mpo na bakitani na yo, bikolo nyonso ya mokili ekomipambola.
Na mokolo yango, Yawe asalaki boyokani elongo na Abrami mpe alobaki : « Nakopesa mokili oyo na bakitani na yo wuta na moluka ya Ejipito kino na ebale Efrate :
Yawe amemaki Abrami na libanda mpe alobaki na ye : — Tala na likolo mpe tanga minzoto soki okokoka kotanga yango. Alobaki na ye lisusu : — Ezali boye nde bakitani na yo bakozala.
Na butu ya mokolo oyo Izaki akomaki na Beri-Sheba, Yawe abimelaki ye mpe alobaki na ye : « Nazali Nzambe ya Abrayami, tata na yo ; kobanga te, nazali elongo na yo. Mpo na Abrayami, mosali na Ngai, nakopambola yo mpe nakokomisa bakitani na yo ebele. »
Bana na yo bakozala ebele lokola putulu ya mabele, bakopanzana na bangambo nyonso : wuta na weste kino na este, wuta na nor kino na sude. Mabota nyonso ya mokili ekomipambola mpo na yo mpe mpo na bakitani na yo.
Davidi atangaki te molongo ya mibali oyo bazalaki na se ya mibu tuku mibale ya mbotama, pamba te Yawe alakaki ete akokomisa Isalaele ebele lokola minzoto ya likolo.
Tika ete kombo na ye ewumela libela na libela, ewumela tango nyonso moyi ekozala, mpo ete bato bakoma kotangaka kombo na ye wana bakobanda kopambolanaka, mpe bikolo nyonso ekoma kobengaka ye : moto ya esengo.
Kanisa Abrayami, Izaki mpe Isalaele, basali na Yo, oyo Yo moko olapelaki ndayi mpe olobaki : « Nakokomisa bakitani na yo ebele lokola minzoto na likolo, nakopesa bango mokili oyo nyonso ndenge kaka nalobaki na bango ; mpe yango ekozala libula na bango mpo na libela. »
Bino nde bozali bakitani ya basakoli mpe ya Boyokani oyo Nzambe asalaki elongo na bakoko na bino, tango alobaki na Abrayami : « Nakopambola mabota nyonso ya mokili na nzela ya bakitani na yo ! »
Nzokande, Nzambe apesaki bilaka na Ye epai ya Abrayami mpe epai ya mokitani na ye. Makomi elobi te « Epai ya bakitani » lokola nde ezalaki likambo ya bato ebele, kasi elobi « Epai ya mokitani na yo » mpo na kolakisa ete etali moto se moko kaka, ye nde Klisto.
Ezali te mpo na bosembo na yo to mpo ete otambolaki alima nde okokota mpo na kozwa mokili na bango, kasi ezali solo mpo na mabe ya bikolo yango nde Yawe, Nzambe na yo, akobengana yango liboso na yo, mpo na kokokisa ndayi oyo alapaki epai ya bakoko na yo Abrayami, Izaki mpe Jakobi.