34 Tango Ezawu akokisaki mibu tuku minei ya mbotama, abalaki Jiditi, mwana mwasi ya Beri, moto ya mokili ya Iti, mpe Basimati, mwana mwasi ya Eloni, moto ya mokili ya Iti.
mpe lapa ndayi na Kombo na Yawe, Nzambe oyo asala likolo mpe mokili, ete okozwela te mwana na ngai ya mobali mwasi kati na bana basi ya Kanana, ba-oyo nazali kovanda kati na bango.
Rebeka akendeki koyebisa Izaki : « Nalembi mokili likolo ya basi oyo ya mokili ya Iti. Soki Jakobi abali mwasi kati na bana basi ya mokili oyo, tina nazala na bomoi ekozala lisusu te. »
Ezawu abalaki basi na ye kati na bana basi ya Kanana : Ada, mwana mwasi ya Eloni, moto ya Iti ; Olibama, mwana mwasi ya Ana mpe koko ya Tsibeoni, moto ya Evi ;
mpe soki bozwi na libala bana na bango ya basi mpo na bana na bino ya mibali, wana bana na bango ya basi bakokoba kosambela banzambe na bango ya bikeko, bakotindika bana na bino ya mibali na kosambela banzambe na bango.
Davidi atunaki Ayimeleki, moto ya Iti, mpe Abishayi, mwana mobali ya Tseruya mpe ndeko mobali ya Joabi : — Nani kati na bino akoki kokende elongo na ngai kino na molako epai ya Saulo ? Abishayi azongisaki : — Ngai, nakokende elongo na yo.