32 Kaka na mokolo yango, basali ya Izaki bayaki kopesa ye sango ete bamoni mayi na libulu oyo bazalaki kotimola.
Kaka na esika yango, Izaki atongaki etumbelo, abelelaki Kombo ya Yawe, atongaki ndako na ye ya kapo. Basali na ye batimolaki libulu mosusu ya mayi.
Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, balapanaki ndayi ; bongo Izaki abimisaki bango na nzela mpe atikaki bango kokende na kimia.
Izaki apesaki libulu yango kombo « Sheba. » Yango wana engumba yango ebengami kino lelo Beri-Sheba.
Maboko ya goyigoyi ekomisaka moto mobola, kasi maboko oyo esalaka ekomisaka moto mozwi.
Moto ya goyigoyi ayokaka baposa, kasi akoki kokokisa yango te ; nzokande baposa ya moto ya nzunzu ekokisamaka.
Bosenga, mpe bakopesa bino ; boluka, mpe bokomona ; bobeta ekuke, mpe bakofungolela bino ;