Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 26:31 - Mokanda na Bomoi

31 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, balapanaki ndayi ; bongo Izaki abimisaki bango na nzela mpe atikaki bango kokende na kimia.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 26:31
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi Abrami azongiselaki mokonzi ya Sodome : — Nalapi ndayi na Kombo na Yawe, Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, Nzambe oyo akela likolo mpe mokili,


Alobaki na bango : — Nabondeli bino, bankolo na ngai, boya na ndako ya mosali na bino. Bokoki kosukola kuna makolo na bino mpe kolekisa butu, bongo na tongo, bokoki kokoba mobembo na bino. Bazongiselaki ye : — Te, tokolala kaka libanda.


Na tongo makasi ya mokolo oyo elandaki, Abrayami azwaki lipa mpe mbeki ya mayi ; apesaki yango na Agari. Atiaki yango likolo ya lipeka na ye, apesaki ye mwana mpe abenganaki ye. Agari akendeki mpe atambolaki bipai na bipai na esobe ya Beri-Sheba.


Bongo sik’oyo, lapa ndayi awa na Kombo ya Nzambe ete okokosa ngai te, bana na ngai te, mpe bakoko na ngai te ; kasi okosalela ngai bolamu elongo na mboka oyo epai wapi ozali kovanda lokola mopaya, ndenge ngai nasaleli yo.


Abrayami azwaki bameme, bantaba, bangombe, mpe apesaki yango na Abimeleki ; bongo bango mibale basalaki boyokani.


Na tongo-tongo, Abrayami atelemaki mpe abongisaki ane na ye. Azwaki basali mibale kati na basali na ye, azwaki mpe Izaki, mwana na ye. Abukaki bakoni mpo na kotumba mbeka, atelemaki mpe akendeki na esika oyo Nzambe ayebisaki ye.


Kasi Jakobi alobaki : — Lapa liboso ndayi. Ezawu alapaki ndayi epai ya Jakobi ; mpe na nzela wana, atekaki boyaya na ye epai ya Jakobi.


Kaka na mokolo yango, basali ya Izaki bayaki kopesa ye sango ete bamoni mayi na libulu oyo bazalaki kotimola.


Sik’oyo Jakobi, tosala boyokani kati na yo mpe ngai, mpe tika ete yango ezala litatoli kati na biso.


Nzokande, bato bakataka seleka na kombo ya moto oyo aleki bango, mpe seleka ezalaka ndanga oyo esukisaka tembe nyonso.


Bato ya Isalaele bazalaki na pasi makasi mokolo wana, pamba te Saulo atiaki bato na se ya mokumba ya ndayi esangana na bilakeli mabe. Alobaki : « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akolia bilei liboso ete pokwa ekoma, liboso ete ngai nazongisa mabe na mabe na banguna na ngai. » Boye moto moko te amekaki kolia.


Kasi Davidi alapaki ndayi na koloba : « Tata na yo ayebi malamu ete nazwaki ngolu na miso na yo, mpe amilobelaki : ‹ Tika ete Jonatan ayeba makambo oyo te, noki te akoyoka pasi na motema ! › Nzokande, na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo moko, etikali kaka moke ete baboma ngai. »


Davidi atunaki ye : — Okoki komema ngai na bisika oyo lisanga ya miyibi wana ezali ? Azongisaki : — Yo, lapa nanu ndayi epai na ngai liboso ya Nzambe ete okoboma ngai te mpe okozongisa ngai te epai ya nkolo na ngai ; bongo ngai nakomema yo epai bango bazali.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ