26 Wuta na Gerari, Abimeleki elongo na Awuzati, mopesi toli na ye, mpe Pikoli, mokonzi ya mampinga na ye, bayaki kokutana na Izaki.
Kasi na butu, Nzambe ayaki epai ya Abimeleki kati na ndoto mpe alobaki na ye : « Okokufa mpo na mwasi oyo osili kozwa, pamba te azali mwasi ya libala. »
Izaki atunaki bango : — Mpo na nini boyei epai na ngai, bino bato oyo bolingaka ngai te mpe bobenganaki ngai epai na bino ?