Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 26:22 - Mokanda na Bomoi

22 Alongwaki wana mpe akendeki kotimola libulu mosusu ; mpe moto moko te aswanisaki ye na tina na yango. Yango wana apesaki yango kombo « Reoboti, » pamba te alobaki : « Sik’oyo, Yawe apesi biso esika monene, mpe tokofuluka na mokili oyo. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 26:22
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakopesa yo mabota ebele, nakobimisa bikolo mpe bakonzi na nzela na yo.


Batimolaki libulu mosusu, kasi baswanisaki ye lisusu na tina na yango, mpe apesaki yango kombo « Sitina. »


Tika ete Nzambe-Na-Nguya-Nyonso apambola yo, apesa yo bana, akomisa bana na yo ebele mpe okoma lisanga monene ya bato.


Apesaki mwana na ye ya mibale kombo « Efrayimi, » pamba te amilobelaki : « Nzambe apesi ngai mabota na mokili epai wapi namonaki pasi. »


Kati na pasi na ngai, nabelelaki Yawe, mpe Yawe ayanolaki ngai, abikisaki ngai.


Nakimaka mbangu kati na nzela ya mibeko na Yo, pamba te opesaka ngai bososoli na yango.


Babundisaki ngai, na mokolo oyo pasi ezalaki kokanga ngai, kasi Yawe azalaki eyekamelo na ngai.


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi ; ezali ya koyemba na lindanda.


Kasi bana ya Isalaele babotanaki mingi mpe bakomaki ebele penza. Bakomaki lisusu ebele koleka mpe makasi mingi : batondisaki mokili ya Ejipito.


Yeisa ndako na yo ya kapo monene, bakisa bakapo na ndako yango mpo ete eya monene ; kokanga motema te ! Benda na molayi basinga na yo mpe pika banzete na yo makasi !


Pamba te okofungwama na ngambo ya loboko na yo ya mobali mpe na ngambo ya loboko na yo ya mwasi ; bakitani na yo bakokonza bikolo mosusu mpe bakosala ete bato bavanda lisusu na bingumba na bango oyo etikalaki lisusu na bato te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ