Atimolaki lisusu mabulu ya mayi oyo batimolaki na tango ya tata na ye Abrayami. Mabulu yango ezalaki bato ya Filisitia nde bakundaki yango sima na kufa ya Abrayami, mpe Izaki abengaki yango kaka na bakombo oyo tata na ye Abrayami apesaka yango.
Babateli bibwele ya Gerari baswanisaki babateli bibwele ya Izaki mpe balobaki na bango : « Mayi oyo ezali ya biso. » Izaki apesaki libulu yango kombo « Eseki, » pamba te baswanisaki ye na tina na yango.