Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 26:18 - Mokanda na Bomoi

18 Atimolaki lisusu mabulu ya mayi oyo batimolaki na tango ya tata na ye Abrayami. Mabulu yango ezalaki bato ya Filisitia nde bakundaki yango sima na kufa ya Abrayami, mpe Izaki abengaki yango kaka na bakombo oyo tata na ye Abrayami apesaka yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 26:18
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo Abrayami alobelaki Abimeleki na tina na libulu ya mayi oyo basali ya Abimeleki babotolaki na makasi.


Azongisaki : — Ndima bana meme sambo oyo ewuti na maboko na ngai lokola litatoli ete ngai nde natimolaki libulu yango.


Yango wana babengaki esika yango Beri-Sheba, pamba te na esika yango nde bango mibale balapaki ndayi.


Izaki alongwaki wana mpe akendeki kotonga ndako na ye ya kapo na lubwaku ya Gerari epai wapi avandaki.


Basali ya Izaki batimolaki na lubwaku mpe bamonaki kuna libulu ya mayi ya peto.


Atongaki lisusu bandako milayi kati na esobe mpe atimolaki mabulu ebele ya mayi mpo ete azalaki na bibwele ebele na se ya bangomba mpe na etando. Azalaki mpe na basali ebele oyo bazalaki kotimola mabele mpe kosala kati na bilanga na ye ya vino kati na bituka ya bangomba mpe na mabele oyo ebotaka malamu, pamba te azalaki kolinga mingi misala ya bilanga.


Bato oyo bapotaka mbangu mpo na koluka bolamu epai ya banzambe mosusu bakomona pasi mingi. Nakosopa te mbeka na bango ya makila epai ya banzambe ya lolenge wana mpe nakotanga bakombo na yango te na bibebu na ngai.


Kuna nde nakozongisela ye bilanga na ye ya vino mpe nakokomisa Lubwaku ya Akori ekuke ya elikya. Kuna, akoyanola na esengo lokola na tango ya bolenge na ye, lokola na mokolo oyo abimaki na Ejipito.


Na mokolo wana, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, nakosala ete bakombo ya banzambe ya bikeko elimwa na mokili ; boye bakotikala kokanisa yango lisusu te. Nakolongola lisusu kati na mokili basakoli mpe molimo ya mbindo.


elongo na Nebo mpe Bala-Meoni, kombo oyo babongola na Sibima. Bapesaki bakombo na bingumba oyo batongaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ