17 Izaki alongwaki wana mpe akendeki kotonga ndako na ye ya kapo na lubwaku ya Gerari epai wapi avandaki.
Bongo Abimeleki alobaki na Izaki : — Kende mosika na biso, pamba te okomi na nguya mingi koleka biso.
Atimolaki lisusu mabulu ya mayi oyo batimolaki na tango ya tata na ye Abrayami. Mabulu yango ezalaki bato ya Filisitia nde bakundaki yango sima na kufa ya Abrayami, mpe Izaki abengaki yango kaka na bakombo oyo tata na ye Abrayami apesaka yango.