Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 26:14 - Mokanda na Bomoi

14 Bato ya Filisitia bakomaki koyokela ye likunya, pamba te azalaki na bameme ebele, bantaba ebele, bangombe ebele mpe basali ebele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 26:14
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Basalelaki Abrami bolamu likolo ya Sarayi, mpe Abrami azwaki bameme, bantaba mpe bangombe, ba-ane, basali ya basi mpe ya mibali, bana ya ba-ane mpe bashamo.


Abrami akomaki na bozwi mingi : bibwele, palata mpe wolo.


Yawe apambola mingi nkolo na ngai mpe akomisa ye mozwi : apesa ye bameme, bantaba, bangombe, palata mpe wolo, basali ya mibali mpe ya basi, ba-ane mpe bashamo.


Abrayami atikaki biloko na ye nyonso na maboko ya Izaki.


Na nzela wana nde moto oyo akomaki na bozwi mingi koleka. Azwaki bibwele ebele, basali ya basi mpe ya mibali, bashamo mpe ba-ane.


Bandeko na ye ya mibali bakomaki na motema likunya epai na ye, kasi tata na ye abombaki kaka likambo yango na motema.


mpe azalaki na etonga ya bameme nkoto sambo, bashamo nkoto misato, bangombe nkoto moko, ba-ane nkama mitano, mpe azalaki na basali ebele penza. Alekaki bato nyonso ya Este na lokumu.


Yawe apambolaki suka ya Yobo koleka ebandeli ya bomoi na ye. Azalaki na bameme nkoto zomi na minei, bashamo nkoto motoba, bangombe nkoto mibale mpe ba-ane nkoto moko.


Kotomboka ebomaka moto oyo azangi mayele, zuwa ebomaka zoba.


Moto mabe amonaka yango mpe asilikaka na zuwa, aliaka minu mpe alembaka nzoto. Posa ya bato mabe elimwaka.


Ndako na ye ezali na bokolongono mpe na bomengo, mpe bosembo na ye ewumelaka mpo na seko.


Lipamboli ya Yawe ekomisaka moto mozwi, mpe abakisaka pasi te na likolo na yango.


Kotomboka ememaka makambo ya somo, mpe kanda ebebisaka ; kasi nani akoki kotelema liboso ya zuwa ?


Namoni ete pasi nyonso oyo bato bamonaka na mosala mpe lokumu oyo bazwaka na misala na bango, ewutaka kaka na bilulela ya moto liboso ya moninga na ye. Wana mpe ezali pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.


Kobanda mokolo wana, Saulo akomaki kotala Davidi miso mabe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ