13 Izaki akomaki mozwi, mpe bozwi na ye ekobaki kaka komata kino akomaki moto na bozwi ebele.
Abrami akomaki na bozwi mingi : bibwele, palata mpe wolo.
Yawe apambola mingi nkolo na ngai mpe akomisa ye mozwi : apesa ye bameme, bantaba, bangombe, palata mpe wolo, basali ya mibali mpe ya basi, ba-ane mpe bashamo.
Na nzela wana nde moto oyo akomaki na bozwi mingi koleka. Azwaki bibwele ebele, basali ya basi mpe ya mibali, bashamo mpe ba-ane.
Ndako na ye ezali na bokolongono mpe na bomengo, mpe bosembo na ye ewumelaka mpo na seko.
Lipamboli ya Yawe ekomisaka moto mozwi, mpe abakisaka pasi te na likolo na yango.