Jakobi apesaki Ezawu lipa mpe elubu ya misili. Ezawu aliaki mpe amelaki, bongo atelemaki mpe akendeki. Ezali ndenge wana nde Ezawu atiolaki boyaya na ye.
Yawe alobaki na Moyize : — Kende, longwa na esika oyo elongo na bato oyo obimisaki na Ejipito ; kende na mokili oyo nalakaki na ndayi epai ya Abrayami, Izaki mpe Jakobi ete nakopesa yango epai na bana na yo.
Na mikolo oyo bilombe bazalaki koyangela, nzala makasi ezalaki kati na mokili. Mobali moko ya Beteleemi ya Yuda, elongo na mwasi na ye mpe bana na ye mibale ya mibali, bakendeki kovanda na mboka Moabi.