Bashamo ebele ekotondisa mokili na yo, bana ya shamo ya mokili ya Madiani mpe ya Efa. Yango nyonso ekowuta na Saba, ekomema wolo mpe malasi ya ansa, mpe ekotatola masanzoli na Yawe.
Bobaluka mpe bokima, bokende kobombama na madusu ya mabanga, bino bavandi ya engumba Dedani ! Pamba te nakotindela Ezawu pasi tango nakopesa ye etumbu.
mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela Edomi mpe nakoboma bato mpe banyama na yango ; nakobebisa yango, mpe bakokufa na mopanga, kobanda na engumba Temani kino na engumba Dedani.
Bato ya Dedani bazalaki kosala mombongo elongo na yo ; bato ya bisanga ebele bazalaki koya kosomba biloko epai na yo, bazalaki kofuta yo na pembe ya nzoko mpe na banzete ya ebeni.
basalaki bankayi na yo na banzete ya sheni oyo ewutaki na Bashani ; basalaki bivandelo na yo, ekota pembe ya nzoko oyo ewutaki na Asiri, na mabaya ya sipele oyo ewutaki na bisanga ya Kitimi ;