61 Boye Rebeka elongo na basali na ye ya basi batelemaki, bamataki likolo ya bashamo mpe balandaki mosali ya Abrayami. Bongo mosali ya Abrayami akamataki Rebeka mpe bakendeki na ye nzela moko.
Bapambolaki Rebeka mpe balobaki na ye : « Ndeko na biso ya mwasi, tika ete okoma mama ya nkoto ya bato, mpe tika ete bana na yo bakamata bingumba ya banguna na bango ! »
Nzokande Rasheli azwaki banzambe ya Labani, abombaki yango likolo ya shamo mpe avandaki na likolo na yango. Labani alukaki kati na ndako mobimba ya kapo, kasi amonaki eloko moko te.
Maridoshe akomaki mikanda na kombo ya mokonzi Kizerisesi, abetaki yango kashe ya mokonzi mpe atindaki yango na nzela ya bantoma oyo batambolaka na bampunda ya mbangu, oyo etiama mpo na misala ya mokonzi.
« Ezali te mpo bazwi mpe bakaboli bomengo ya bitumba : Elenge mwasi moko to bilenge basi mibale mpo na soda moko, bilamba ya langi mpo na Sisera, bilamba, bilamba ya langi, mpe bilamba oyo batia bililingi, mpo na balongi ? »
Davidi alongaki bango kobanda na tongo kino na pokwa ya mokolo oyo elandaki. Moko te abikaki, longola kaka bilenge mibali nkama minei oyo bamataki na likolo ya bashamo mpe bakimaki.