Mpe ye alobaki na ngai lisusu : « Yawe oyo natambolaki liboso na Ye akotinda anjelu na Ye elongo na yo mpe akolongisa mobembo na yo mpo ete ozwela mwana na ngai ya mobali mwasi oyo akowuta na ekolo na ngai mpe na libota ya tata na ngai.
Sima na yango, mosali ya Abrayami mpe bato oyo bazalaki elongo na ye baliaki, bamelaki mpe balekisaki butu kati na ndako wana. Na tongo, tango balamukaki, mosali ya Abrayami alobaki na bango : — Botika ete nazonga epai ya nkolo na ngai.
Sala ete maloba ya buku oyo ya Mobeko ewumela tango nyonso na monoko na yo ; tangaka mpe kanisaka yango butu mpe moyi, mpo ete osala kolanda nyonso oyo ekomami kati na yango. Na bongo nde okokende liboso mpe okolonga kati na misala na yo nyonso.