Yawe alobaki na Abrami : « Bima wuta na mokili na yo, wuta na libota na yo mpe wuta na ndako ya tata na yo, mpo na lobiko na yo, mpe kende na mokili oyo nakolakisa yo.
Yawe amimonisaki epai ya Abrami mpe alobaki : « Nakopesa mokili oyo epai ya bakitani na yo. » Boye Abrami atongaki na esika yango etumbelo mpo na Yawe oyo amimonisaki epai na ye.
Mosali atunaki ye : — Tango mosusu mwasi yango akolinga na ye te kolanda ngai na mokili oyo. Boni, nakoki na ngai kozongisa mwana na yo ya mobali na mokili epai wapi owuta ?
Telema ! Kende mbala moko na Padani-Arami, na ndako ya koko na yo, Betweli, tata ya mama na yo. Zwa mwasi kuna kati na bana basi ya Labani, ndeko ya mama na yo.
Tata mpe mama na ye bazongisaki : — Boni, kati na bandeko na yo to kati na bato na biso nyonso, ezali te na bana basi ya kitoko mpo ete okende kozwa mwasi kati na bato ya Filisitia oyo bakatama ngenga te ? Kasi Samison alobaki na tata na ye : — Balela ngai ye, pamba te ye nde abongi mpo na ngai.