Ebandeli 24:3 - Mokanda na Bomoi3 mpe lapa ndayi na Kombo na Yawe, Nzambe oyo asala likolo mpe mokili, ete okozwela te mwana na ngai ya mobali mwasi kati na bana basi ya Kanana, ba-oyo nazali kovanda kati na bango. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Yawe, Nzambe ya likolo, oyo abimisaki ngai na ndako ya tata na ngai mpe na mokili epai wapi nabotama, oyo alobaki na ngai mpe alakaki ngai na nzela ya ndayi ete akopesa mokili oyo na bakitani na ngai, akotindela yo anjelu na Ye mpo ete azala liboso na yo mpe mpo ete okoka koyela mwana na ngai ya mobali mwasi ya mokili wana.
Napamelaki bango mpe nalakelaki bango mabe ; nabetaki ndambo kati na bango, napikolaki bango suki mpe nalapisaki bango ndayi oyo na Kombo ya Nzambe : — Bosengeli te kopesa na libala bana na bino ya basi epai ya bana mibali ya bapaya mpe bosengeli te kozwa na libala bana na bango ya basi mpo na bana na bino ya mibali to mpo na bino moko.