20 Asalaki na lombangu mpe asopaki mayi nyonso ya mbeki na ye na esika oyo banyama emelelaka mayi ; akimaki lisusu na libulu mpe atokaki mayi mpo na bashamo na ye nyonso.
Isalaele apambolaki Jozefi mpe alobaki : Tika ete Nzambe oyo, liboso na Ye, bakoko na ngai, Abrayami mpe Izaki, batambolaki, Nzambe oyo azali Mobateli na ngai wuta mokolo ya mbotama na ngai kino na mokolo ya lelo,