Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 24:14 - Mokanda na Bomoi

14 Tika ete mwana mwasi oyo nakoloba na ye : ‹ Nabondeli yo, tengemisa mbeki na yo mpo ete namela mayi, › mpe ye akozongisela ngai : ‹ Mela na yo, mpe nakomelisa lisusu bashamo na yo, › azala mwasi oyo oponi mpo na Izaki, mosali na Yo. Na nzela oyo, nakoyeba ete olakisi bolamu na Yo epai ya nkolo na ngai. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 24:14
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi Abrami alobaki : — Ah Nkolo Yawe, nakoyeba ndenge nini ete mokili oyo epesameli ngai ?


Tala, natelemi pene ya libulu ya mayi mpe bana basi ya engumba bazali kobima mpo na koya kotoka mayi.


Liboso ete asilisa kosambela, Rebeka abimaki na mbeki na ye na lipeka. Azalaki mwana mwasi ya Betweli, mwana mobali ya Milika oyo azalaki mwasi ya Naori, ndeko ya Abrayami.


Mwana mwasi alobaki : — Mela na yo, nkolo na ngai ! Akitisaki mbeki mbangu na maboko na ye mpe apesaki ye mpo ete amela.


Sima na kopesa ye mayi ya komela, alobaki : — Nakotoka lisusu mayi mpo na bashamo na yo nyonso kino ekosilisa komela.


Tala ngai, natelemi pembeni ya libulu oyo ya mayi, elenge mwasi oyo akobima mpo na koya kotoka mayi mpe oyo nakoloba na ye : ‹ Nabondeli yo, nakoki kozwa ndambo ya mayi ya komela na mbeki na yo ? ›


Mpe ye akozongisela ngai : ‹ Mela na yo, mpe nakotoka lisusu mayi mpo na bashamo na yo, › tika ete ye nde azala mwasi oyo Yawe aponi mpo na mwana mobali ya nkolo na ngai. »


Joabi alobaki na Amasa : « Boni ndeko na ngai ya mobali, ozali malamu ? » Bongo Joabi asalelaki loboko na ye ya mobali mpo na kosimba Amasa na mandefu mpe kopesa ye beze.


Tango okoyoka lokito ya makolo ya bato na likolo ya banzete ya Mirie, na tango wana nde okobima noki, pamba te ekolakisa ete Yawe abimi liboso na yo mpo na kobeta mampinga ya bato ya Filisitia. »


Moto akoki kozwa bandako mpe bomengo lokola libula kowuta epai ya batata, kasi mwasi ya bwanya azali likabo kowuta na Yawe.


— Senga elembo moko epai na Yawe, Nzambe na yo, ezala kati na mokili oyo eleki na bozindo to oyo eleki likolo.


kati na mabondeli na ngai tango nyonso ; mpe nasengaka na Nzambe ete, na mikolo oyo to na mikolo oyo ekoya, apesa ngai nzela ya koya kotala bino, soki ezali mokano na Ye.


Balobaki na ye : — Tunela biso epai ya Nzambe mpo ete toyeba soki mobembo na biso ekozala malamu.


Jedeon alobaki : — Solo, soki nazwi ngolu na miso na Yo, pesa ngai elembo oyo ekolakisa solo ete Yo Yawe nde ozali kosolola na ngai.


nakotanda bapwale ya meme na esika oyo batutaka bambuma ya ble. Soki mamwe emonani kaka na likolo ya bapwale kasi mabele etikali ya kokawuka, wana nakoyeba ete okobikisa Isalaele na nzela ya loboko na ngai ndenge olobaki. »


Soki alobi : « Malamu, » wana mosali na yo akozala na kimia. Kasi soki atomboki na kanda, wana yeba malamu ete azwi mokano ya kosala ngai mabe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ