10 Bongo mosali azwaki bashamo zomi kati na bashamo ya nkolo na ye elongo na biloko ya ndenge na ndenge oyo eleki kitoko ; akendeki na Arami mpe azwaki nzela ya engumba ya Naori.
Tera azwaki Abrami, mwana na ye ya mobali ; Loti, koko na ye mpe mwana mobali ya Arani ; mpe Sarayi, bokilo na ye mpe mwasi ya mwana na ye Abrami, babimaki na Uri ya bato ya Chalide mpo na kokende na Kanana. Kasi tango bakomaki na engumba Arani, bavandaki kuna.
Abrayami alobaki na mosali na ye, oyo awumelaki mingi na ndako na ye mpe azalaki kokamba biloko na ye nyonso : — Tia loboko na yo na se ya mopende na ngai
Abimisaki biloko ya wolo, ya palata mpe bilamba ; bongo apesaki yango na Rebeka. Apesaki mpe bakado ya motuya epai ya ndeko na ye ya mobali mpe epai ya mama na ye.
Kuna, amonaki libulu ya mayi kati na elanga mpe bitonga misato ya bameme elali pembeni ya libulu, pamba te bameme ezalaki komela mayi na libulu yango. Libanga moko ya monene ezipaki monoko ya libulu.
Tango bato ya Amoni bamonaki ete bamilukeli makambo epai ya Davidi, Anuni mpe bato ya Amoni batindaki bakilo ya palata nkoto tuku misato epai ya bato ya Siri ya Mezopotami, ya Maaka mpe ya Tsoba, mpo na kodefa bashar mpe basoda oyo babundaka bitumba likolo ya bampunda.