Tango Abrayami atombolaki miso, amonaki mibali misato pene na ye. Mpe tango kaka amonaki bango, atelemaki wuta na ndako na ye ya kapo mpe akendeki mbangu mpo na kokutana na bango ; bongo agumbamaki kino na mabele.
Ba-anjelu oyo mibale bakomaki na Sodome na pokwa. Wana Loti avandaki na ekuke, amonaki bango, akendeki koyamba bango mpe afukamaki elongi kino na mabele.
— Yoka biso, nkolo na ngai ; ya solo, ozali moto monene kati na biso. Kunda mwasi na yo kati na kunda oyo eleki kitoko kati na bakunda na biso. Moko te kati na biso akoboya kopesa yo kunda na ye mpo ete okunda mwasi na yo.
Ayebisaki bango : — Soki ezali mokano na bino ete nakunda nzoto ya mwasi na ngai awa, boyoka ngai mpe bosengela ngai epai ya Efroni, mwana mobali ya Tsoari,