Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 23:6 - Mokanda na Bomoi

6 — Yoka biso, nkolo na ngai ; ya solo, ozali moto monene kati na biso. Kunda mwasi na yo kati na kunda oyo eleki kitoko kati na bakunda na biso. Moko te kati na biso akoboya kopesa yo kunda na ye mpo ete okunda mwasi na yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 23:6
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abrami akomaki na bozwi mingi : bibwele, palata mpe wolo.


Tango Abrami ayokaki ete bakangi ndeko na ye, abengisaki bato nkama misato na zomi na mwambe oyo bayebi kobunda mpe babotama na ndako na ye. Boye balandaki bango kino na Dani.


Sara asekaki mpe amilobelaki : « Awa nasili konuna boye, nakoki lisusu koyoka posa ya mobali ? Kutu nkolo na ngai akomi mpe mobange ! »


Sik’oyo, zongisa mwasi yango epai ya mobali na ye mpo ete azali mosakoli. Akobondela mpo na yo mpe okokufa te. Soki ozongisi ye te, yeba ete okokufa, yo mpe bato na yo nyonso.


Kaka na tango yango, Abimeleki mpe Pikoli, mokonzi ya mampinga na ye, bakendeki kokutana na Abrayami ; mpe Abimeleki alobaki na Abrayami : — Nzambe azali kolongisa yo na makambo nyonso oyo ozali kosala.


Boye, Abrayami atelemaki mpe agumbamaki liboso ya bato ya mboka wana, bato ya Iti.


Mwana mwasi alobaki : — Mela na yo, nkolo na ngai ! Akitisaki mbeki mbangu na maboko na ye mpe apesaki ye mpo ete amela.


Yawe apambola mingi nkolo na ngai mpe akomisa ye mozwi : apesa ye bameme, bantaba, bangombe, palata mpe wolo, basali ya mibali mpe ya basi, ba-ane mpe bashamo.


Rasheli alobaki na tata na ye : — Tika ete nkolo na ngai asilika te soki nakoki kotelema te na miso na yo, pamba te nazali na mikolo ya sanza oyo ekomelaka basi nyonso. Labani alukaki, kasi amonaki banzambe yango te.


Jakobi apesaki mitindo oyo epai ya mosali na ye ya liboso : « Tango Ezawu, ndeko na ngai, akokutana na yo mpe akotuna yo : ‹ Yo ozali mosali ya nani, ozali kokende wapi mpe nani nkolo ya banyama nyonso oyo ezali liboso na yo ? ›


Bazongisaki : — Te nkolo na ngai, basali na yo bayei nde kosomba biloko ya kolia.


Mpo na nini boyibi kopo oyo nkolo na ngai amelelaka mayi mpe asalelaka mpo na koyeba makambo oyo ekoya ? Likambo oyo bosali ezali penza mabe. »


Tomemelaki yo mbongo oyo tomonaki tango tofungolaki basaki na biso wuta na mokili ya Kanana. Ndenge nini tokoki lisusu koyiba wolo to palata kati na ndako ya nkolo na yo ?


Aron azongisaki : — Tika ete nkolo na ngai asilika te ! Oyebi bato, balingaka kaka kosala mabe.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Mosala ya Ejipito, mombongo ya Kushi mpe bato milayi ya Seba, bakoleka epai na yo mpe bakozala ya yo. Bakotambola ya kokangama na minyololo, sima na yo ; bakofukama liboso na yo mpe bakobondela yo na maloba oyo : ‹ Solo, Nzambe azali penza epai na yo, nzambe mosusu azali te ! › »


Rite alobaki : — Tika ete nakoba kozwa ngolu na miso na yo, nkolo na ngai. Obondisi motema na ngai, osololi na mwasi mosali na yo na boboto nyonso. Nzokande, nakokani te ata na moko ya basali na yo ya basi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ