Bongo Abrayami ayebisaki basali na ye : « Botikala awa elongo na ane, wana ngai elongo na mwana tozali kokende kino kuna na likolo mpo na kogumbamela Nzambe ; sima na yango, tokozongela bino. »
Eliya alobaki na ye : — Elize, tikala awa ; Yawe atindi ngai na Yordani. Elize azongisaki : — Na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, nakotika yo te ! Boye bango mibale bakobaki nzela na bango.
Biso nyonso, tozalaki koyengayenga lokola bana meme, moko na moko azalaki kolanda nzela na ye ; bongo Yawe akweyisaki masumu na biso nyonso na nzoto na ye.
Kati na nzoto na Ye, amemaki masumu na biso kuna na ekulusu mpo ete tokoka kokufa na oyo etali masumu mpe tokoka kozala na bomoi mpo na bosembo. Ezali na nzela ya bapota na Ye nde bobikisamaki na bokono.