Liboso ete asilisa kosambela, Rebeka abimaki na mbeki na ye na lipeka. Azalaki mwana mwasi ya Betweli, mwana mobali ya Milika oyo azalaki mwasi ya Naori, ndeko ya Abrayami.
Natunaki ye : « Ozali mwana mwasi ya nani ? » Azongisaki : « Nazali mwana mwasi ya Betweli, mwana mobali oyo Milika abotelaki Naori. » Boye natiaki lopete na zolo na ye mpe basheneti na maboko na ye.
Bapambolaki Rebeka mpe balobaki na ye : « Ndeko na biso ya mwasi, tika ete okoma mama ya nkoto ya bato, mpe tika ete bana na yo bakamata bingumba ya banguna na bango ! »
Na yango, Izaki amemaki Rebeka kati na ndako ya kapo ya mama na ye Sara, azwaki ye mpo ete azala mwasi na ye mpe alingaki ye. Boye Izaki abondisamaki na kufa ya mama na ye.
mpe Izaki azalaki na mibu tuku minei ya mbotama tango abalaki Rebeka, mwana mwasi ya Betweli, moto ya Arami ya Padani-Arami, mpe ndeko mwasi ya Labani, moto ya Arami.
Telema ! Kende mbala moko na Padani-Arami, na ndako ya koko na yo, Betweli, tata ya mama na yo. Zwa mwasi kuna kati na bana basi ya Labani, ndeko ya mama na yo.
Izaki atindaki Jakobi na nzela na ye, mpe Jakobi akendeki na Padani-Arami epai ya Labani, mwana mobali ya moto ya Arami, Betweli, mpe ndeko mobali ya Rebeka, mama ya Ezawu mpe Jakobi.