Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 22:12 - Mokanda na Bomoi

12 Anjelu alobaki : — Kosembola loboko na yo te likolo ya mwana, kosala ye mabe te. Nasosoli sik’oyo ete otosaka Nzambe, pamba te oboyi te kopesa Ngai mwana na yo ya mobali, mwana na yo se moko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 22:12
42 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abrayami azongisaki : — Namilobelaki : « Solo, bato ya esika oyo batosaka Nzambe ata moke te mpe bakoboma ngai mpo na mwasi na ngai.


Abrayami atombolaki miso na ye mpe amonaki meme ya mobali oyo maseke na yango ezalaki ya kokangama na nzete ya moke. Azwaki yango mpe apesaki yango mbeka ya kotumba na esika ya mwana na ye ya mobali.


mpe alobaki : « Nakati seleka na Kombo na Ngai, elobi Yawe, ete lokola osali likambo ya boye, lokola oboyi te kopesa Ngai mwana na yo ya mobali, mwana na yo se moko,


Nzambe alobaki na ye : — Zwa Izaki, mwana na yo ya mobali, mwana na yo se moko oyo olingaka ; kende na mokili ya Morija, mpe kuna, okopesa Ngai ye lokola mbeka ya kotumba na likolo ya ngomba oyo nakolakisa yo.


Nakosala yango mpo ete Abrayami atosaki Ngai, abatelaki bikateli na Ngai, mitindo na Ngai mpe mibeko na Ngai.


Na mokolo ya misato, Jozefi ayebisaki bango : — Nazali moto oyo abangaka Nzambe. Bosala oyo nazali koloba mpe bokozala na bomoi.


Nzokande, bayangeli oyo bakambaki liboso na ngai bazalaki konyokola bato mpe kosenga na makasi ete bapesa bilei, vino mpe mbongo ya bibende ya palata, tuku minei. Ezala bakalaka na bango mpe bazalaki kaka konyokola bato. Kasi ngai, natikalaki kosala bongo te, pamba te nazalaki kotosa Nzambe.


Moto moko azalaki kovanda na mokili ya Utsi, kombo na ye ezalaki « Yobo ; » azalaki kotambola na boyengebene mpe na bosembo, azalaki kotosa Nzambe mpe kokima mabe.


Bongo alobaki na moto : « Kotosa Nkolo, yango nde bwanya ! Koboya mabe, yango nde mayele ! »


Mbala motoba, akobikisa yo na pasi ; mpe na mbala ya sambo, mabe ekokomela yo te.


Solo, Yawe ayebi nzela ya bato ya sembo, kasi nzela ya bato mabe ememaka na libebi.


Kotosa Yawe ezali mosisa ya bwanya ; bato nyonso oyo batosaka Yawe bazali na mayele ya peto. Lokumu ya Yawe ezali ya libela na libela.


kasi Yawe asepelaka na bato oyo batosaka Ye, ba-oyo batielaka bolingo na Ye motema.


Bosalela Yawe na kobanga mpe bosepela na kolenga.


Banani bazali bato oyo batosaka Yawe ? Alakisaka bango nzela ya kopona.


Yawe ayebisaka mabongisi na Ye epai ya bato oyo batosaka Ye, alakisaka bango mabombami ya boyokani na Ye.


Moyize azongiselaki bango : — Bobanga te ! Nzambe ayei nde komeka bino mpo ete kobanga Nzambe ezala kati na bino mpe bosala masumu te.


Kotosa Yawe ezali mosisa ya mayele ; bato oyo bazangi mayele batiolaka bwanya mpe toli.


Yoka suka ya mateya nyonso : Tosa Nzambe mpe batela mibeko na Ye, pamba te yango nde eleki na tina mpo na moto.


batongi bisambelo ya likolo ya bangomba mpo na Bala, mpo na kotumba bana na bango na moto lokola mbeka ya kotumba epai ya Bala ; nzokande Ngai natikala kotinda bango likambo ya boye te to mpe likambo ya boye etikala ata komata na makanisi na Ngai te ;


Nakosala boyokani ya libela elongo na bango, nakotika te kosalela bango bolamu mpe nakosala ete batosa Ngai mpe bapesa Ngai lisusu mokongo te.


Bongo Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Moto nyonso oyo alingi kolanda Ngai asengeli komiboya ye moko, kokamata ekulusu na ye mpe kolanda Ngai.


Mpe moto nyonso oyo atiki bandako, bandeko ya mibali, bandeko ya basi, tata, mama, bana to bilanga mpo na Kombo na Ngai akozwa yango koleka mbala nkama elongo na bomoi ya seko.


Yango wana, tika ete pole na bino engenga liboso ya bato, mpo ete bamona misala malamu na bino mpe bakumisa Tata na bino oyo azali kati na Likolo.


Pamba te Nzambe alingaki mokili mingi penza, yango wana apesaki Mwana na Ye se moko, mpo ete moto nyonso oyo akondima Ye akufa te kasi azwa bomoi ya seko.


Kati na Yuda mobimba, Galile mpe Samari, Lingomba ezalaki na kimia, ezalaki kolenda mpe kotosa Nkolo, mpe motango ya bandimi na yango ezalaki kobakisama na lisungi ya Molimo Mosantu.


Kasi tala ndenge nini Nzambe alakisi biso bolingo na Ye : wana tozalaki nanu bato ya masumu, Klisto akufelaki biso.


Ye oyo aboyaki te kopesa Mwana na Ye se moko, kasi akabaki Ye mpo na biso nyonso, ndenge nini azanga kopesa biso biloko nyonso elongo na Ye na nzela ya ngolu ?


Komekama oyo ekomelaki bino ekomelaka bato nyonso ; mpe Nzambe azali Moyengebene ; akotika te ete bomekama koleka makasi na bino. Kasi na tango ya komekama, akobongisela bino nzela ya kobima na komekama yango, mpe akopesa bino makasi ya kotelemela yango.


Pamba te soki mokano ya malamu ezali, Nzambe andimaka likabo oyo moto apesi na motema malamu kolanda oyo azali na yango, kasi kolanda te oyo azali na yango te.


Abrayami azalaki na elikya ete Nzambe azali na makoki ya kosekwisa Izaki longwa na bakufi, yango wana Nzambe azongiselaki ye mwana na ye : yango ezalaki kaka elilingi.


Yango wana, lokola tozali kozwa Bokonzi oyo eninganaka te, tozongisaka matondi mpe tosalelaka Nzambe na lolenge oyo esepelisaka Ye : na botosi mpe na kobanga.


Nzokande moto mosusu akoki koloba : « Yo ozali na kondima ; kasi ngai, nazali na misala. » Lakisa ngai kondima na yo, oyo ezangi misala ; mpe ngai nakolakisa yo kondima na ngai na nzela ya misala na ngai.


Bongo mongongo moko ebimaki wuta na Kiti ya Bokonzi mpe elobaki : « Bokumisa Nzambe na biso ; bino bawumbu na Ye nyonso, bino oyo botosaka Ye, mikolo mpe bana mike ! »


Samuele alobaki : — Boni, Yawe asepelaka mingi na bambeka ya kotumba mpe na makabo koleka kotosa mongongo na Ye ? Te ! Botosi eleki mbeka ; koyoka eleki mafuta ya meme ya mobali.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ