10 Boye Abrayami azwaki mbeli mpe asembolaki loboko na ye mpo na koboma mwana na ye ya mobali.
Kasi anjelu ya Yawe abengaki ye wuta na likolo : — Abrayami ! Abrayami ! Abrayami azongisaki : — Ngai oyo.
Bato ya bikolo nyonso ya mabele bakomipambola mpo na bakitani na yo, pamba te otosi Ngai. »
Tango bakomaki na esika oyo Nzambe alakisaki ye, Abrayami atongaki etumbelo na esika yango mpe abongisaki bakoni na likolo na yango. Akangaki Izaki, mwana na ye ya mobali, basinga mpe alalisaki ye na etumbelo likolo ya bakoni.