Kasi mpo na Isimaeli, nayoki yo. Solo, nakopambola ye, nakopesa ye mabota ebele mpe nakokomisa bakitani na ye ebele. Akozala tata ya bakambi zomi na mibale, mpe nakokomisa ye tata ya ekolo monene.
Kasi bato ya Isalaele bazalaki kotiola bamemi sango ya Nzambe, bazalaki komona pamba makebisi na Ye mpe bazalaki kowolola basakoli na Ye kino Yawe kosilikela bato na Ye makasi ; mpe bakokaki kosala eloko moko te mpo na komibikisa liboso ya kanda makasi ya Yawe.
« Kasi sik’oyo, nakomi eloko ya kotiola epai ya bilenge oyo batata na bango bazangaki tina, mpe oyo nakokaki kutu te kopesa nzela ya kolia esika moko na mbwa na ngai, oyo ezalaki kobatela bibwele na ngai.
Nalobi na Nzambe, Libanga na ngai : « Mpo na nini obosani ngai ? Mpo na nini nasengeli kotambola na mawa kati na motema mpe na se ya minyoko ya monguna ? »
Na mikolo na ye ya pasi mpe ya koyengayenga, tango bato na ye bazali kokweya na maboko ya banguna mpe moto akosunga ye azali te, Yelusalemi azali kokanisa bomengo na ye nyonso ya kala ; bayini na ye batali ye na pamba mpe basepeli na kobebisama na ye.
Kasi ndenge kaka mwana mobali oyo abotamaki na lolenge ya bomoto azalaki na kala konyokola mwana mobali oyo abotamaki na nzela ya nguya ya Molimo, ndenge wana mpe ezali kosalema sik’oyo.