Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 21:8 - Mokanda na Bomoi

8 Mwana akolaki mpe Sara akataki kopesa ye mabele. Mokolo bakataki kopesa Izaki mabele, Abrayami asalisaki feti monene.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 21:8
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi Loti abondelaki bango mingi ; boye bandimaki kokende na ye elongo mpe bakotaki na ndako na ye. Alambelaki bango bilei ya kitoko, atumbaki mapa ezanga levire mpe baliaki.


Abakisaki : « Nani akokaki koloba na Abrayami ete Sara akomelisa bana mabele ? Pamba te naboteli ye mwana na kimobange na ye. »


Kasi tango Sara amonaki ete Isimaeli, mwana oyo Agari, moto ya Ejipito, abotelaki Abrayami, azali koseka ;


Izaki asalelaki bango feti monene ; baliaki mpe bamelaki.


Na boye, Labani abengisaki bato nyonso ya esika wana mpe asalisaki feti.


Sima na mikolo misato, ezalaki mokolo ya mbotama ya Faraon. Faraon asalisaki feti monene mpe abengisaki bakalaka na ye nyonso. Abimisaki na boloko, liboso ya bakalaka na ye, kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi mpe kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa.


Mpe tango Abineri elongo na bato na ye, tuku mibale, bakomaki epai ya Davidi, na Ebron, Davidi asaliselaki bango feti.


Salomo alamukaki mpe asosolaki ete ezalaki ndoto. Azongaki na Yelusalemi, atelemaki liboso ya Sanduku ya Boyokani ya Yawe. Abonzaki bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani ; mpe asalisaki feti monene elongo na basali na ye nyonso.


Na mobu ya misato ya bokonzi na ye, asalisaki feti monene mpo na bato na ye nyonso ya lokumu : bakalaka na ye, bakonzi ya basoda ya mokili ya Persi mpe ya Medi, bankumu mpe bayangeli ya bituka.


Kasi nabatelaki kimia kati na motema na ngai mpe namitungisaki te lokola mwana moke elongo na mama na ye. Nazali na kimia lokola mwana oyo mama alongola na mabele.


Tango Gomeri alongolaki Lo-Rukama na mabele, Gomeri akomaki lisusu na zemi mpe abotaki mwana mobali.


Tata na ye akendeki kotala elenge mwasi yango, mpe Samison asalisaki kuna feti moko ya monene, kolanda ndenge ezalaki momesano mpo na libala.


Samison alobaki na bango : — Nalingi koyebisa bino lisese moko. Soki bopesi ngai eyano, na mikolo sambo ya feti, nakopesa bino bilamba tuku misato ya lino mpe bilamba tuku misato ya feti.


Kasi lokola Ana akendeki te, alobaki na mobali na ye : — Soki nakati mwana komela mabele nde nakomema ye mpo na kotalisa ye epai na Yawe ; bongo akovanda kuna mpo na libela.


Sima na ye kokata mwana komela mabele, Ana akamataki ye, ndenge kaka azalaki nanu moke bongo ; amemaki ye na Ndako ya Yawe, na Silo, elongo na ngombe ya mobali ya mibu misato, bakilo zomi ya farine, mpe mbeki moko ya vino.


Tango Abigayili akomaki epai ya Nabali, akutaki Nabali azali kosala feti kati na ndako na ye ndenge penza mokonzi asalaka yango. Azalaki na loyenge mpe alangwaki makasi. Boye Abigayili ayebisaki ye eloko te kino na tongo ya mokolo oyo elandaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ