Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 21:7 - Mokanda na Bomoi

7 Abakisaki : « Nani akokaki koloba na Abrayami ete Sara akomelisa bana mabele ? Pamba te naboteli ye mwana na kimobange na ye. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 21:7
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abrayami afukamaki elongi kino na mabele, asekaki mpe amilobelaki : « Eh ! Mobali oyo azali na mibu nkama moko ya mbotama akoki lisusu kobota mwana ! Bongo Sara, mwasi oyo azali na mibu tuku libwa ya mbotama, akoki penza kokumba zemi ! »


Yawe alobaki na Abrayami : — Mpo na nini Sara aseki mpe alobi : « Nakoki solo kobota mwana awa nasili kokoma mobange ? »


Mwana akolaki mpe Sara akataki kopesa ye mabele. Mokolo bakataki kopesa Izaki mabele, Abrayami asalisaki feti monene.


Ndeko mwasi ya Takipenesi abotelaki Adadi mwana moko ya mobali mpe apesaki ye kombo « Genubati. » Takipenesi abokolaki ye kati na ndako ya Faraon. Genubati avandaki kuna elongo na bana ya Faraon.


Na tongo, tango nalamuki mpo na komelisa mwana na ngai mabele, namoni ete mwana azali ya kokufa. Kasi tango natali ye penza malamu, kaka na tongo yango, namoni ete ezali mwana na ngai te, oyo ngai nabotaki !


Pamba te ozali monene mpe osalaka bikamwa ; Yo kaka nde ozali Nzambe.


Nkolo, nzambe moko te ekokani na Yo, kati na banzambe ; moko te ekoki kosala makambo oyo Yo osalaka.


Boye, okomilobela na motema : « Nani abotelaki ngai bana nyonso oyo ? Nazangaki bana mpe nazalaki kobota te, nazalaki mowumbu mpe moto basundola. Bongo nani abokolaki bango ? Natikalaki kaka ngai moko, bongo bana oyo bawuti wapi ? »


Nani ayoka likambo ya boye ? Nani amona makambo ya boye ? Boni, mokili ekoki kobotama na mokolo moko to ekolo ekoki solo kosalema na mbala moko ? Nzokande, kaka tango Siona ayoki pasi ya kobota, tala ye wana asili kobota bana na ye.


Tika ete alakelama mabe, moto oyo amemelaki tata na ngai sango oyo esepelisaki motema na ye : « Baboteli yo mwana, mwana mobali ! »


Elakeli mabe moko te ekoki kozwa Jakobi, mpe kindoki ezali na nguya te likolo ya Isalaele. Bakoloba sik’oyo mpo na Jakobi mpe Isalaele : ‹ Tala makambo oyo Nzambe asali ! ›


na tina ete bakonzi ya milimo mpe banguya kati na mboka ya milimo eyeba sik’oyo, na nzela ya Lingomba, bwanya ya Nzambe oyo emonisamaka na lolenge ebele,


tango akoya na mokolo wana mpo na kopesamela nkembo kati na basantu na Ye, mpe lokumu kati na bandimi na Ye. Bino mpe bokozala elongo na bango, pamba te bondimaki mateya oyo toteyaki bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ