Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 21:6 - Mokanda na Bomoi

6 Sara alobaki : « Nzambe apesi ngai libaku ya koseka ; mpe moto nyonso oyo akoyoka sango oyo akoseka elongo na ngai. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 21:6
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abrayami afukamaki elongi kino na mabele, asekaki mpe amilobelaki : « Eh ! Mobali oyo azali na mibu nkama moko ya mbotama akoki lisusu kobota mwana ! Bongo Sara, mwasi oyo azali na mibu tuku libwa ya mbotama, akoki penza kokumba zemi ! »


Avandisaka mwasi ekomba kati na ndako na ye, lokola mama ya esengo kati na bana na ye. Bokumisa Yawe !


Boye, tozalaki koganga mpe koyemba na esengo. Bongo, maloba oyo ekomaki kolobama kati na bikolo : « Yawe asaleli bango makambo minene ! »


Boni, mama akoki solo kobosana bebe na ye oyo azali komelisa mabele, to kozanga bolingo epai ya mwana oyo ye aboti ? Ata soki akoki kobosana, ngai nakoki kobosana yo te !


Boye, okomilobela na motema : « Nani abotelaki ngai bana nyonso oyo ? Nazangaki bana mpe nazalaki kobota te, nazalaki mowumbu mpe moto basundola. Bongo nani abokolaki bango ? Natikalaki kaka ngai moko, bongo bana oyo bawuti wapi ? »


Oh mwasi ekomba, yemba nzembo na esengo, yo oyo obotaka te ! Yemba nzembo mpe ganga na esengo, yo mwasi oyo oyoki nanu pasi ya kobota te ! Pamba te bana ya mwasi oyo basundola bakozala ebele koleka bana ya mwasi ya libala, elobi Yawe.


Tika ete alakelama mabe, moto oyo amemelaki tata na ngai sango oyo esepelisaki motema na ye : « Baboteli yo mwana, mwana mobali ! »


Mwana yango akosala esengo na yo, mpe okosepela na ye makasi ; mpe bato ebele bakosepela mpo na mbotama na ye,


Baninga mpe bandeko ya Elizabeti bayokaki ete Nkolo asaleli ye ngolu monene, mpe basepelaki na ye elongo.


Bosepelaka elongo na bato oyo bazali kosepela, mpe bolelaka elongo na bato oyo bazali kolela.


Mpo na kondima, Sara mpe azwaki makoki ya komema zemi atako mibu na ye ya kobota esilaki koleka wuta kala, pamba te andimaki ete Ye oyo apesaki ye elaka akosaka te.


Ana alobaki na ye : — Limbisa ngai, nkolo na ngai ; nazali mwasi oyo atelemaki awa pembeni na yo mpo na kobondela Yawe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ