Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 21:5 - Mokanda na Bomoi

5 Abrayami azalaki na mibu nkama moko ya mbotama tango mwana na ye, Izaki, abotamaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 21:5
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abrami azalaki na mibu tuku mwambe na motoba ya mbotama tango Agari abotelaki ye Isimaeli.


Tango Abrami akokisaki mibu tuku libwa na libwa ya mbotama, Yawe abimelaki ye mpe alobaki na ye : « Nazali Nzambe-Na-Nguya-Nyonso. Tambola liboso na Ngai mpe zala moto azanga pamela.


Abrayami afukamaki elongi kino na mabele, asekaki mpe amilobelaki : « Eh ! Mobali oyo azali na mibu nkama moko ya mbotama akoki lisusu kobota mwana ! Bongo Sara, mwasi oyo azali na mibu tuku libwa ya mbotama, akoki penza kokumba zemi ! »


Abrayami azalaki na mibu tuku libwa na libwa ya mbotama tango akatamaki ngenga ;


Sima na yango, ndeko na ye mpe abimaki, loboko na ye ekanga litindi ya Ezawu ; yango wana bapesaki ye kombo « Jakobi. » Izaki azalaki na mibu tuku motoba ya mbotama tango Rebeka abotaki.


Tika ete alakelama mabe, moto oyo amemelaki tata na ngai sango oyo esepelisaki motema na ye : « Baboteli yo mwana, mwana mobali ! »


Abrayami akomaki na mibu pene nkama moko, kasi kondima na ye elembaki te atako atalaki nzoto na ye, oyo ezalaki lisusu na makasi te, mpe nzoto ya Sara oyo akokaki lisusu kobota te.


Yango wana, Abrayami akangaki motema mpe azwaki oyo Nzambe alakaki ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ