Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 21:3 - Mokanda na Bomoi

3 Abrayami apesaki na mwana oyo Sara abotelaki ye kombo « Izaki. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 21:3
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe alobaki : — Te ! Mwasi na yo, Sara, akobotela yo mwana mobali, mpe okobenga ye « Izaki. » Nakobatela boyokani na Ngai lokola boyokani ya libela elongo na ye mpe bakitani na ye sima na ye.


Kasi na oyo etali boyokani na Ngai, nakosala yango elongo na Izaki, mwana mobali oyo Sara akobotela yo na eleko oyo, na mobu oyo ezali koya.


Kasi Nzambe ayebisaki Abrayami : « Tika koyoka pasi na motema mpo na mwana na yo ya mobali mpe mwasi mowumbu na yo. Yoka nyonso oyo Sara azali koyebisa yo, pamba te ezali na nzela ya Izaki nde okozwa bakitani.


Sara alobaki : « Nzambe apesi ngai libaku ya koseka ; mpe moto nyonso oyo akoyoka sango oyo akoseka elongo na ngai. »


Nzambe alobaki na ye : — Zwa Izaki, mwana na yo ya mobali, mwana na yo se moko oyo olingaka ; kende na mokili ya Morija, mpe kuna, okopesa Ngai ye lokola mbeka ya kotumba na likolo ya ngomba oyo nakolakisa yo.


Tala libota ya Izaki, mwana mobali ya Abrayami. Abrayami azalaki tata ya Izaki,


Abrayami abotaki Izaki ; Izaki abotaki Jakobi ; Jakobi abotaki Yuda mpe bandeko na ye ya mibali ;


Bongo Nzambe asalaki boyokani elongo na Abrayami, mpe elembo ya boyokani yango ezalaki : kokatama ngenga. Abrayami abotaki Izaki mpe akataki ye ngenga na mokolo ya mwambe ya mbotama na ye ; Izaki abotaki Jakobi mpe akataki ye ngenga, bongo Jakobi mpe abotaki bakoko na biso zomi na mibale mpe akataki bango ngenga.


mpe bakitani nyonso ya Abrayami bazali bana na ye te. Pamba te Nzambe alobaki na Abrayami : « Ezali na nzela ya Izaki nde okozwa bakitani. »


Nzambe alobaki na ye : « Ezali na nzela ya Izaki nde okozwa bakitani. »


Kasi nabimisaki tata na bino, Abrayami, wuta na mokili oyo ezalaki na ngambo mosusu ya ebale, natambolisaki ye na mokili mobimba ya Kanana mpe napesaki ye bakitani ebele. Napesaki ye Izaki ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ