Ebandeli 21:16 - Mokanda na Bomoi16 Akendeki kovanda na monkama ya bametele, pamba te alobaki : « Nalingi te komona kufa ya mwana na ngai. » Lokola avandaki mosika ya mwana, atombolaki mongongo mpe alelaki. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Mwasi yango azongiselaki ye : — Na Kombo na Yawe, Nzambe na yo, nazali na lipa te ; nazali kaka na mwa ndambo ya farine na sani mpe ndambo ya mafuta na mbeki. Nazali kolokota mwa koni oyo nakomema na ndako mpo na kolamba bilei ya suka mpo na ngai mpe mpo na mwana na ngai ya mobali. Tango tokosilisa yango, ekotikala na biso kaka kozela kufa.
Nakokomisa mikolo ya bafeti na bino mikolo ya matanga, banzembo na bino ya esengo banzembo ya mawa. Nakosala ete bino nyonso bolata basaki, mpe bakokokola bino suki ya moto. Nakoyeisa matanga kati na mokili lokola matanga ya libota oyo esili kokufisa mwana se moko oyo bazalaki na ye, mpe suka na yango ekozala bobele se pasi makasi.
Nakosopa Molimo ya ngolu mpe ya mabondeli epai ya libota ya Davidi mpe epai ya bavandi ya Yelusalemi. Bakosembola miso na bango epai na Ngai oyo batobolaki. Bakosalela ye matanga ndenge kaka basalaka matanga ya mwana oyo abotama kaka ye moko ; bakolela ye makasi ndenge balelaka mwana mobali ya liboso oyo asili kokufa.