Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 20:9 - Mokanda na Bomoi

9 Abimeleki abengaki Abrayami mpe alobaki na ye : — Likambo nini osali biso, lisumu nini nasali yo mpo ete omemisa ngai mpe mokili na ngai ngambo ya monene boye ? Osali ngai makambo oyo ekoki kosalema te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 20:9
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, Faraon abengisaki Abrami mpe alobaki na ye : « Likambo nini osali ngai ? Mpo na nini oyebisaki ngai te ete azali mwasi na yo ?


Abimeleki atunaki Abrayami : — Makanisi nini ozalaki na yango mpo ete osala boye ?


Na tongo-tongo, Abimeleki alamukaki mpe abengisaki basali na ye nyonso. Tango ayebisaki bango makambo oyo ekomelaki ye, babangaki makasi.


Abimeleki alobaki lisusu : — Nasali bino likambo nini ? Etikalaki kaka moke ete mobali moko kati na bato na ngai akota mpe asangisa nzoto na mwasi na yo. Boye, olingaki komemisa biso ngambo.


Tango tongo etanaki, Jakobi amonaki ete ezalaki nde Lea. Bongo alobaki na Labani : — Likambo nini oyo osali ngai ? Boni, ezali mpo na Rasheli te nde ngai nasalelaki yo ? Mpo na nini okosi ngai ?


Tango bana mibali ya Jakobi bazongaki wuta na esobe, bayokaki sango ya makambo oyo esalemaki. Bongo, bayokaki pasi mingi na mitema mpe basilikaki makasi, pamba te Sishemi asalaki likambo ya soni na Isalaele, wana asangisaki nzoto na makasi na mwana mwasi ya Jakobi. Likambo ya bongo esengelaki kosalema te.


Sima na sanza misato, bayebisaki Yuda : — Tamari, bokilo na yo ya mwasi, asalaki kindumba, mpe tala kutu akomi na zemi. Yuda alobaki : — Babimisa ye mpe batumba ye na moto !


Moto moko te aleki ngai na monene kati na ndako oyo. Nkolo na ngai apekisi ngai eloko moko te longola kaka yo, pamba te ozali mwasi na ye. Boye ndenge nini penza ngai nakoki kosala likambo ya mabe boye mpe kosala masumu liboso ya Nzambe ?


Davidi asilikelaki mozwi makasi mpe alobaki na Natan : — Na Kombo na Yawe, moto oyo asali boye asengeli na kufa !


Tamari alobaki na ye : — Te, ndeko na ngai ya mobali ! Kosangisa na ngai nzoto na makasi te. Likambo ya boye ekoki kosalema te kati na Isalaele ! Kosala bozoba ya boye te.


Moyize atunaki Aron : — Likambo nini bato oyo basali yo mpo ete okamba bango kino kosala lisumu ya monene boye ?


Yawe apesaki bato etumbu likolo ya ekeko ya mwana ngombe oyo balobaki na Aron ete asala.


Moto oyo amemaka bato ya sembo na nzela ya mabe akokangama na motambo oyo asali ye moko, kasi bato oyo bazangi pamela bakozwa esengo lokola libula na bango.


Soki mobali asali ekobo na mwasi ya mobali mosusu, mwasi ya moninga na ye ; bango mibale, mwasi na mobali oyo basali ekobo, esengeli koboma bango.


Osengeli kosukisa bango, pamba te bazali kobebisa mabota ebele na nzela ya malakisi oyo esengeli kutu te, mpo na kaka kozwa mbongo ya soni.


Tika ete moto nyonso apesa libala lokumu, mpe mbeto ya libala ezala peto, pamba te Nzambe akosambisa bato na pite mpe bato na bikobo.


Jozue alobaki : « Mpo na nini omemeli biso pasi ? Tika ete Yawe amonisa yo pasi lelo ! » Bongo bato nyonso ya Isalaele babambaki ye mabanga mpe akufaki ; babambaki lisusu mabanga na bato oyo batikalaki mpe bato yango bakufaki ; mpe batumbaki bibembe na bango na moto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ