Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 20:5 - Mokanda na Bomoi

5 Ezali mobali na ye moko nde alobaki : « Azali ndeko na ngai ya mwasi ; » mpe ye moko andimaki : « Azali ndeko na ngai ya mobali. » Nasali yango na motema sembo mpe na maboko ezanga mbindo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 20:5
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi yo, loba na bango ete ozali ndeko na ngai ya mwasi. Na bongo, bakosalela ngai bolamu mpo na yo, mpe bomoi na ngai ekobika mpo na yo. »


Tango Nzambe alongolaki ngai na ndako ya tata na ngai mpo na kokende bipai na bipai, nayebisaki mwasi na ngai : « Tala bolamu oyo okosalela ngai : Bisika nyonso oyo tokokende, okolobaka na tina na ngai : ‹ Azali ndeko na ngai. › »


Abalukaki mpe alobaki lisusu epai na Sara : « Tala, napesi mbongo ya bibende, nkoto moko, epai ya ndeko na yo ya mobali. Ezali mpo na kozipa mabe oyo basali yo mpe bato nyonso oyo bazali elongo na yo ; boye okomi sembo na nyonso. »


Mpo na yo, soki okotambola liboso na Ngai ndenge Davidi, tata na yo, atambolaki na motema malamu mpe na motema ya sembo ; soki okosala nyonso oyo natindaki yo mpe okobatela mibeko mpe malako na Ngai,


— Oh Yawe, kanisa ndenge nini natambolaki liboso na Yo na boyengebene, ndenge nini namipesaki epai na Yo na motema na ngai mobimba, mpe ndenge nini nasalaki makambo ya malamu na miso na Yo. Mpe Ezekiasi alelaki mingi.


Oh Nzambe na ngai, nayebi ete oyebi bozindo ya mitema na biso, osepelaka na bosembo. Napesi nyonso oyo wuta na mokano ya motema na ngai moko mpe na makanisi ya lokuta te. Sik’oyo, namoni ndenge nini bato na Yo, oyo bazali awa, bapesi Yo makabo oyo na motema malamu.


‹ Nazali sembo, nasali masumu te ; nazali peto, namemi na ngai ngambo te. ›


Ezali moto oyo azali maboko pembe mpe motema peto, oyo atiaka elikya te na banzambe ya bikeko mpe alapaka ndayi ya lokuta te.


Lokola mpe natielaka Yo motema, tika ete bozangi pamela mpe bosembo ebatela ngai.


Yawe, nasukoli maboko na ngai mpo na kolakisa ete nasali mabe te, mpe nabandi na etumbelo na Yo,


Tika ete bikolo esangana zingazinga na Yo, kasi Yo, konza bango wuta na Kiti na Yo ya Bokonzi.


Tika ete Yawe asambisa bikolo. Yawe, longisa ngai kolanda bosembo na ngai, kolanda bozangi pamela na ngai, Yo-Oyo-Oleki-Likolo.


Solo, ezali kaka na pamba nde nabatelaki motema na ngai peto ; ezali kaka na pamba nde nasukolaki maboko na ngai mpo ete nasala mabe te !


Davidi abatelaki bango na motema ezanga pamela, mpe akambaki bango na maboko ya mayele.


Boyengebene ya bato ya sembo etambolisaka bango, kasi mayele mabe ya bato oyo batambolaka na boyengebene te ebebisaka bango.


Moyengebene atambolaka na bosembo na ye ; boye sima na ye, bana na ye bakozala bato ya esengo.


Daniele azongiselaki ye : — Oh mokonzi, tika ete owumela na bomoi seko na seko !


Tala likambo oyo tokoki komikumisa na yango : mitema na biso ezali kotatola ete, kati na mokili mpe mingi penza na miso na bino, totambolaki na bosantu mpe na bosolo oyo ewutaka na Nzambe. Totambolaki bongo na bwanya ya bomoto te, kasi na ngolu ya Nzambe.


Bino moko bozali batatoli, Nzambe mpe azali Motatoli, ete totambolaki na bosantu, na bosembo mpe na kozanga pamela, na miso na bino oyo bozali kondima.


atako liboso nazalaki kofinga mpe konyokola Ye mpe nazalaki moto na kanza ; kasi ayokelaki ngai mawa, pamba te nazalaki koyeba te makambo oyo nazalaki kosala mpe nazalaki na kondima te.


— Nzambe ya banzambe ! Yawe ! Nzambe ya banzambe ! Yawe ! Ayebi nyonso ! Tika ete Isalaele ayeba mpe yango ! Soki tosali yango mpo na kotombokela Yawe to mpo na kosala lisumu na miso na Ye, tika ete abikisa biso te na mokolo ya lelo !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ