2 Abrayami azalaki koloba kuna na tina na Sara, mwasi na ye : « Azali ndeko na ngai ya mwasi ! » Yango wana Abimeleki, mokonzi ya Gerari, atindaki bato mpo na koluka Sara mpe akamataki ye na makasi.
Kaka na tango yango, Abimeleki mpe Pikoli, mokonzi ya mampinga na ye, bakendeki kokutana na Abrayami ; mpe Abimeleki alobaki na Abrayami : — Nzambe azali kolongisa yo na makambo nyonso oyo ozali kosala.
Tango bato ya esika wana batunaki ye na tina na mwasi na ye, azongisaki : — Azali ndeko na ngai ya mwasi. Azalaki koloba te ete azali mwasi na ye mpo ete azalaki kobanga ete bato ya mboka baboma ye mpo na Rebeka, pamba te azalaki penza kitoko.
Kasi tango bakambi ya Babiloni batindelaki ye bakalaka mpo na kotuna ye na tina na elembo ya kokamwa oyo esalemaki kati na mokili, Nzambe atikaki Ezekiasi kosala na ndenge na ye moko mpo na komeka ye mpe koyeba mozindo ya motema na ye.