Sarayi alobaki na Abrami : — Yawe apesi ngai mabota te. Kende, sangisa nzoto na mosali na ngai ya mwasi, tango mosusu nakotonga libota na nzela na ye. Abrami ayokaki maloba ya Sarayi.
Sik’oyo, zongisa mwasi yango epai ya mobali na ye mpo ete azali mosakoli. Akobondela mpo na yo mpe okokufa te. Soki ozongisi ye te, yeba ete okokufa, yo mpe bato na yo nyonso.
Bongo batindaki Sanduku ya Nzambe na Ekroni. Tango Sanduku ya Nzambe ekotaki na Ekroni, bato ya Ekroni bagangaki : — Bamemi Sanduku ya Nzambe ya Isalaele epai na biso mpo ete baboma biso mpe baboma bato na biso.