Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 20:13 - Mokanda na Bomoi

13 Tango Nzambe alongolaki ngai na ndako ya tata na ngai mpo na kokende bipai na bipai, nayebisaki mwasi na ngai : « Tala bolamu oyo okosalela ngai : Bisika nyonso oyo tokokende, okolobaka na tina na ngai : ‹ Azali ndeko na ngai. › »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 20:13
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe alobaki na Abrami : « Bima wuta na mokili na yo, wuta na libota na yo mpe wuta na ndako ya tata na yo, mpo na lobiko na yo, mpe kende na mokili oyo nakolakisa yo.


Sima, Abrami alongwaki wana mpe akendeki malembe-malembe kino na Negevi.


Lisusu, azali ya solo ndeko na ngai ya mwasi, mwana ya tata na ngai ; kasi azali mwana ya mama na ngai te. Nzokande akoma mwasi na ngai. »


Ezali mobali na ye moko nde alobaki : « Azali ndeko na ngai ya mwasi ; » mpe ye moko andimaki : « Azali ndeko na ngai ya mobali. » Nasali yango na motema sembo mpe na maboko ezanga mbindo.


mpo na kobwakela, na kobombama, moto oyo azangi pamela ; babangaka te kobwakela ye yango na mbalakata.


Petelo alobaki na ye : — Mpo na nini boyokanaki mpo na komeka Molimo ya Nkolo ? Yoka, makolo ya bato oyo bawuti kokunda mobali na yo esili kokoma liboso ya ekuke ; yo mpe, bakomema yo.


Mpo na kondima, Abrayami atosaki Nzambe oyo abengaki ye mpe atindaki ye kokende na mokili oyo asengelaki kozwa na sima lokola libula. Atosaki mpe akendeki atako ayebaki te epai azalaki kokende.


Saulo azongisaki : — Tika ete Yawe apambola bino mpo na mawa na bino epai na ngai !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ