Oh Yawe, tika ete kanda na Yo eleka ndelo te ; kokanisaka masumu na biso tango nyonso te ! Tala biso ndenge tozali kobondela, pamba te biso nyonso tozali bato na Yo.
Mopakolami na Yawe, oyo totielaki motema akangami na mitambo na bango ; nzokande tozalaki kokanisa boye na tina na ye : « Tokobika bomoi malamu na se ya bobatelami na ye kati na bikolo. »
Nakotia bino misisa mpe misuni, nakolatisa bino poso ya nzoto mpe nakotia pema kati na bino. Boye bokozwa lisusu bomoi, bongo bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. »
Liloba na Yawe. Tala liloba oyo Yawe alobaki na tina na Isalaele. Yawe oyo atanda likolo mpe asala miboko ya mabele, Ye oyo atia Molimo na Ye kati na moto, alobi :
Yango wana ekomama : « Moto ya liboso, Adamu, akomaki ekelamu na bomoi, azalaki na bomoi ya bomoto ; » kasi Adamu ya suka akomaki Molimo oyo apesaka bomoi.
Toyebi malamu ete, soki ndako na biso, ndako oyo ya kapo epai wapi tovandaka awa na mokili ebebisami, tozali na ndako oyo Nzambe abongisela biso, ndako ya seko kati na Lola, ndako monene oyo etongama na maboko ya bato te.