Basali bikeko, bango nyonso, bazali pamba, mpe biloko oyo bango balingaka ezali ata na litomba te ; esengelaki kotatola mpo na bango, kasi emonaka te mpe eyebaka ata eloko moko te ; boye, bayokisama soni.
Kobanga te, pamba te okoyoka lisusu soni te ! Kozala na mawa te, pamba te okotiolama lisusu te ! Okobosana soni ya bolenge na yo mpe okokanisa lisusu te pasi na yo ya kokufisa mobali ;
Oh Yawe, Elikya ya Isalaele, bato nyonso oyo basundolaka Yo bakufaka soni, bato oyo bapesaka yo mokongo bakufaka, pamba te basundoli Yawe, Etima ya mayi na bomoi.
Boni, bazali penza koyokela makambo na bango ya nkele soni te ? Te, bazali na bango koyoka ata soni te ; bayebi kutu ata ndenge bayokaka soni te. Yango wana, bakokufa lokola bato nyonso, bakokweyisama tango nakopesa bango etumbu, » elobi Yawe.
Boye, okokanisa etamboli na yo mpe okoyoka soni tango okoyamba bandeko na yo ya basi, ezala ba-oyo bazali mikolo na yo to ba-oyo bazali baleki na yo ; nakopesa yo bango lokola bana na yo ya basi, kasi ekozala te kolanda boyokani na Ngai elongo na yo.
Bokolia bilei ebele mpe bokotonda, bongo bokokumisa Kombo ya Yawe, Nzambe na bino, oyo asaleli bino makambo ya kokamwa : bato na Ngai bakotikala koyoka lisusu soni te.
Moto nyonso oyo akoyoka Ngai mpe maloba na Ngai soni, kati na bato ya ekeke oyo, ba-oyo batosaka Nzambe te mpe batondi na masumu, Mwana na Moto mpe akoyoka ye soni, tango akoya elongo na ba-anjelu ya bule kati na nkembo ya Tata na Ye.
Moto nyonso oyo akoyoka Ngai mpe maloba na Ngai soni, Mwana na Moto akoyoka ye soni, tango akoya kati na nkembo na Ye mpe kati na nkembo ya Tata mpe ya ba-anjelu ya bule.