Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 2:21 - Mokanda na Bomoi

21 Na yango, Yawe Nzambe alalisaki mobali pongi ya makasi. Mpe wana mobali azalaki kolala, Yawe Nzambe azwaki mokuwa moko na mopanzi ya mobali mpe azipaki mosuni na esika yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 2:21
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango moyi ekitaki, Abrami alalaki pongi makasi. Na kati ya molili makasi, somo ekangaki ye.


Alobaka kati na ndoto, kati na emoniseli ya butu, tango bato bazwaka pongi makasi wana balali na mbeto ;


kati na bandoto ya butu, na tango bato bazwaka pongi makasi,


Bogoyigoyi ememaka moto na pongi makasi, mpe moto ya goyigoyi akufaka nzala.


Wana azalaki koloba na ngai, nakomaki na pongi moko ya makasi, mpe nakweyaki elongi kino na mabele ; kasi asimbaki ngai mpe atelemisaki ngai, kaka na esika oyo nazalaki.


Pamba te mobali akelama te wuta na mwasi, kasi mwasi akelama wuta na mobali.


Boye Davidi azwaki likonga mpe eloko ya mayi oyo ezalaki pembeni ya moto ya Saulo, mpe bakendeki. Moto moko te amonaki mpe ayebaki likambo yango, mpe moko te alamukaki. Bato nyonso bazalaki ya kolala, pamba te Yawe alalisaki bango pongi makasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ