Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 2:14 - Mokanda na Bomoi

14 Eteni ya misato, kombo na yango « Tigre. » Yango elekana na este ya Asiri. Mpe eteni ya minei, kombo na yango « Efrate. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 2:14
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Longwa na mokili wana, alekaki na Asiri mpe atongaki Ninive, Reoboti-Iri, Kala


Bana mibali ya Semi : Elami, Asuri, Aripakishadi, Ludi mpe Arami.


Na mokolo yango, Yawe asalaki boyokani elongo na Abrami mpe alobaki : « Nakopesa mokili oyo na bakitani na yo wuta na moluka ya Ejipito kino na ebale Efrate :


Eteni ya mibale, kombo na yango « Giyoni. » Yango ezingeli mokili mobimba ya Kushi.


Yawe Nzambe azwaki moto mpe atiaki ye kati na elanga ya Edeni mpo na kolona yango mpe kobatela yango.


Bakitani na ye bazalaki kovanda na mokili oyo ezalaki kati na Avila mpe Shuri, pene ya Ejipito, na nzela oyo ekenda na Asiri. Bazalaki tango nyonso kovanda lokola banguna ya bandeko na bango nyonso.


mibali ya Babiloni mpe mibali nyonso ya Chalide, ya Pekodi, ya Shoa mpe ya Koa elongo na mibali nyonso ya Asiri, bilenge mibali kitoko. Bango nyonso bazalaki bayangeli mpe bakonzi ya basoda, basoda ya mpiko oyo batambolaka malamu likolo ya bampunda mpe bakonzi ya basoda ya lokumu ; bango nyonso batambolaka likolo ya bampunda.


Na mokolo ya tuku mibale na minei ya sanza ya liboso, tango nazalaki pembeni ya ebale monene Tigre,


Bolongola molako mpe bokende kino na etuka ya bangomba ya bato ya Amori ; bokende na bamboka nyonso oyo ezali pene ya Araba, na bangomba, na mboka ya se, na Negevi mpe pembeni-pembeni ya mayi monene, kati na mokili ya bato ya Kanana mpe na mokili ya Libani kino na Efrate, ebale monene.


Esika nyonso makolo na bino ekonyata, ekozala ya bino. Mokili na bino ekobanda wuta na esobe kino na Libani, wuta na Ebale Efrate kino na este ya Ebale monene.


Mongongo yango ezalaki koloba na anjelu ya motoba oyo azalaki na kelelo na maboko : « Fungola ba-anjelu minei oyo bazali ya kokangama na minyololo pembeni ya ebale monene Efrate. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ