Mpe Ezekiasi asambelaki Yawe : « Oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, Yo oyo ovandi likolo ya basheribe, ozali Nzambe kaka moko na likolo ya mikili nyonso ya mabele, Yo nde osala Likolo mpe mabele.
Pamba te na mikolo motoba, Yawe asalaki Likolo, mabele, ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango, kasi akataki mosala na mokolo ya sambo. Yango wana, Yawe apambolaki mokolo ya Saba mpe abulisaki yango.
Ekozala elembo kati na Ngai mpe bana ya Isalaele mpo na libela na libela, pamba te na mikolo motoba, Yawe asalaki likolo mpe mokili ; bongo na mokolo ya sambo, akataki mosala mpe apemaki. »
Ngai nde nasala mabele mpe nakela bato kati na yango ; loboko na Ngai moko nde etandaki likolo lokola liputa mpe etiaki mampinga na yango nyonso na molongo.
« Pamba te ndenge likolo eleki mosika na mabele, ndenge wana mpe banzela na Ngai ezali likolo koleka banzela na bino, mpe makanisi na Ngai ezali likolo koleka makanisi na bino.
Kasi Ye oyo azali libula ya Jakobi akokani na bikeko wana te, pamba te azali Mokeli ya biloko nyonso, ezala ata Isalaele, ekolo oyo ezali libula na Ye ; Kombo na Ye ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Bakotanda yango na se ya moyi, na se ya sanza mpe na se ya mampinga nyonso ya likolo, oyo balingaki, basalelaki na esengo, balandaki, batunaki makambo mpe bafukamelaki. Bakosangisa lisusu mikuwa yango te mpo na kokunda yango, kasi ekokoma lokola matiti ya kopola, na mabele.
Liloba na Yawe. Tala liloba oyo Yawe alobaki na tina na Isalaele. Yawe oyo atanda likolo mpe asala miboko ya mabele, Ye oyo atia Molimo na Ye kati na moto, alobi :
Sik’oyo, biso oyo tondimi, tozali kokota kati na bopemi yango kolanda ndenge Nzambe alobaki : « Yango wana, kati na kanda na ngai, nakataki seleka oyo : ‹ Bakotikala kokota te kati na bopemi na ngai ! › » Nzambe alobaki bongo, atako misala na Ye emonanaki wuta na tango oyo akelaki mokili.