Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 19:8 - Mokanda na Bomoi

8 Boyoka ! Nazali na bana basi mibale oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te. Tika ete namemela bino bango libanda ! Bosala bango nyonso oyo bolingi. Kasi bosala bato oyo eloko moko te mpo ete bayei kovanda na ndako na ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 19:8
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tika ete namemela bino mwa eloko ya kolia mpo ete bozwa lisusu makasi na nzoto ; bongo bokokoba mobembo na bino, pamba te ezali mpo na yango nde boleki epai na ngai mosali na bino. Bazongisaki : — Ezali malamu, sala ndenge olobi.


Alobaki : — Te, baninga na ngai, bosala mabe te !


Ribeni alobaki na tata na ye : — Pesa ngai Benjame, mpe nakomemela yo ye. Soki namemeli yo ye te, boma bana na ngai mibale ya mibali.


Aron azongisaki : — Tika ete nkolo na ngai asilika te ! Oyebi bato, balingaka kaka kosala mabe.


Moto nyonso oyo apamelaka motioli amilukelaka kosambwa, moto nyonso oyo apamelaka moto mabe amilukelaka ngambo.


Boni, ezali te kokabola bilei na yo na moto oyo azali na nzala ? Ezali te koyamba kati na ndako na yo, mobola oyo azali koyengayenga ? Ezali te kolatisa moto oyo azali bolumbu mpe koboya kopesa mokongo na ndeko na yo ?


Solo, Petelo azalaki kososola te makambo oyo azalaki koloba, pamba te bango misato batondaki na kobanga.


Mpe mpo na nini toloba te : « Tika ete tosala mabe mpo ete bolamu ebima kati na mabe » ndenge bato oyo batongaka biso bakosaka ete toteyaka bongo. Bato wana basengeli kozwa etumbu oyo ekoki na mabe na bango.


Nkolo ndako abimaki libanda mpe alobaki na bango : — Te, bandeko na ngai, bozala mabe boye te ! Lokola mobali oyo azali kati na ndako na ngai, bosala ye mabe oyo te.


Botala mwana na ngai ya mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te mpe makangu ya mobali oyo azali kati na ndako ! Nazali kobimisa bango sik’oyo libanda mpo na bino mpo ete bokoka kosala bango nyonso oyo bolingi. Kasi mpo na mobali oyo, bosala likambo ya soni ya boye te.


Nzete ya nzube ezongiselaki yango : ‹ Soki bolingi penza kopakola ngai mafuta mpo ete nazala mokonzi na bino, boya kobombama na se ya pio na ngai. Soki bongo te, tika ete moto ebima na nzete ya nzube mpe ezikisa banzete ya sedele ya Libani ! ›


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ