Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 19:7 - Mokanda na Bomoi

7 Alobaki : — Te, baninga na ngai, bosala mabe te !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 19:7
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Liboso ete bakende kolala, mibali nyonso ya engumba Sodome, bilenge mpe mibange, bawutaki bipai na bipai mpe bayaki kozingela ndako.


Loti abimaki mpo na kosolola na bango ; akangaki ekuke sima na ye.


Boyoka ! Nazali na bana basi mibale oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te. Tika ete namemela bino bango libanda ! Bosala bango nyonso oyo bolingi. Kasi bosala bato oyo eloko moko te mpo ete bayei kovanda na ndako na ngai.


Okosangisa nzoto te na mwana mobali ndenge basangisaka nzoto na mwana mwasi ; ezali likambo ya nkele.


Soki mobali asangisi nzoto na moninga na ye mobali ndenge basangisaka nzoto na mwasi, bango mibale basali likambo moko ya mbindo ; boye esengeli koboma bango mpe makila na bango ekotangama na mito na bango moko.


Wuta na moto moko, asalaki mabota nyonso ya bato, mpo ete bakoka kovanda na mokili mobimba ; mpe akataki tango mpo na moto na moto mpe atiaki bandelo mpo na bisika na bango ya kovanda.


Yango wana, Nzambe akabaki bango kati na baposa mabe ya mitema na bango mpe na misala ya bosoto, mpo ete basambwisa banzoto na bango moko, na nzela ya moko to ya mosusu.


Tika ete awumela epai na yo, na esika nyonso oyo alingi, mpe na engumba nyonso oyo aponi ; konyokola ye te.


Ndenge moko mpe mpo na bato ya Sodome, ya Gomore mpe ya bingumba ya pembeni : basalaki ndenge moko na ba-anjelu, bamipesaki na pite mpe bazalaki kosangisa nzoto na ndenge oyo esengeli te. Bazali ndakisa mpo na bato oyo bazali komona pasi ya etumbu ya moto ya seko na seko.


Nkolo ndako abimaki libanda mpe alobaki na bango : — Te, bandeko na ngai, bozala mabe boye te ! Lokola mobali oyo azali kati na ndako na ngai, bosala ye mabe oyo te.


Nzokande Gali, mwana mobali ya Ebedi, akendeki na Sishemi, elongo na bandeko na ye ya mibali ; mpe bato ya Sishemi batielaki ye motema.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ