6 Loti abimaki mpo na kosolola na bango ; akangaki ekuke sima na ye.
Babelelaki Loti : — Wapi mibali oyo bayaki epai na yo na butu oyo ? Bimisela biso bango mpo ete tosangisa na bango nzoto.
Alobaki : — Te, baninga na ngai, bosala mabe te !
Nkolo ndako abimaki libanda mpe alobaki na bango : — Te, bandeko na ngai, bozala mabe boye te ! Lokola mobali oyo azali kati na ndako na ngai, bosala ye mabe oyo te.