Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 19:34 - Mokanda na Bomoi

34 Mokolo oyo elandaki, kulutu alobaki na leki : « Na butu oyo ewuti koleka, nasangisaki nzoto na tata na ngai. Tika ete topesa ye lisusu masanga ya vino na butu ya lelo, mpe yo okokende kosangisa na ye nzoto mpo ete, na nzela ya tata na biso, libota na biso ebunga te. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 19:34
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na butu wana, bazwaki masanga ya vino mpe bamelisaki tata na bango. Boye kulutu akendeki mpe asangisaki nzoto na tata na ye, mpe tata na ye atikalaki koyeba likambo yango te, ezala tango mwana na ye ya mwasi akendeki epai na ye to tango alongwaki.


Na butu wana lisusu, bazwaki masanga ya vino mpe bamelisaki tata na bango ; bongo leki akendeki mpe asangisaki nzoto na tata na ye. Tata na ye atikalaki kaka koyeba likambo yango te, ezala tango mwana na ye ya mwasi akendeki epai na ye to tango alongwaki.


Bilongi na bango ezali kofunda bango ; bazali kolakisa masumu na bango ndenge bato ya Sodome bazalaki kosala, bazali kobomba yango te. Mawa na bango, pamba te bamilukeli nde makambo !


Yango wana, mvula ekangamaki, mpe mvula ya sima enokaki lisusu te. Kasi atako bongo, okangami kaka na kosala kindumba na yo mpe oboyi koyoka soni.


Oh Yawe ; boni, miso na Yo esepelaka te komona bosolo ? Obetaka solo bato, kasi bayokaka na bango pasi te ; osilisaka koboma bango, kasi baboyaka kaka kobongwana. Bakomisa mito na bango makasi lokola mabanga mpe baboyaka kobongola mitema na bango.


Boni, bazali penza koyokela makambo na bango ya nkele soni te ? Te, bazali na bango koyoka ata soni te ; bayebi kutu ata ndenge bayokaka soni te. Yango wana, bakokufa lokola bato nyonso, bakokweyisama tango nakopesa bango etumbu, » elobi Yawe.


Boni, bazali koyokela makambo na bango ya nkele soni ? Te ! Bazali koyoka ata soni te ; bayebi kutu te ndenge bayokaka soni ! Yango wana, bakokufa lokola bato nyonso, bakokweyisama tango bakozwa etumbu, elobi Yawe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ