Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 19:30 - Mokanda na Bomoi

30 Loti mpe bana na ye mibale ya basi babimaki na Tsoari, bakendeki kovanda na bangomba, pamba te azalaki kobanga kotikala kuna. Ye elongo na bana na ye mibale ya basi bakendeki kovanda kati na lidusu ya libanga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 19:30
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye Loti atalaki mpe amonaki etando nyonso ya Yordani oyo ezalaki na mabele kitoko mpe ekenda kino na Tsoari. Liboso ete Yawe abebisa Sodome mpe Gomore, ezalaki lokola elanga ya Yawe, lokola mokili ya Ejipito.


Kasi Abrami azongiselaki mokonzi ya Sodome : — Nalapi ndayi na Kombo na Yawe, Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, Nzambe oyo akela likolo mpe mokili,


Tango kaka babimisaki bango na libanda, moko kati na mibali yango alobaki : — Bokima mpo ete bobikisa bomoi na bino ! Botala sima te mpe botelema ata esika moko te kati na engumba oyo ! Bokima na likolo ya bangomba, noki te bokobebisama !


Mosali na yo azwi ngolu na miso na yo, mpe otalisi ngai bolamu makasi na ndenge obikisi bomoi na ngai. Kasi nakokoka te kokima na likolo ya bangomba, noki te likama ekokomela ngai mpe nakokufa.


Mobulu lokola mayi, okokende liboso te, pamba te omataki na mbeto ya tata na yo, esika oyo ngai nalalaka, mpe okomisi yango mbindo.


Nazali kolela na se ya motema mpo na Moabi, banguna na ye bazali kokima kino na Tsoari, kino na Egilati-Shelishiya ; bazali komata na nzela ya Luyiti na kolela ; mpe na nzela ya Oronayimi, bazali kosala matanga mpo na kobebisama na bango.


Makelele mpe koganga ezali komata wuta na Eshiboni kino na Eleale mpe Yakatsi, wuta na Tsoari kino koleka Oronayimi mpe Egilati-Shelishiya ; pamba te, ezala mayi ya Nimirimi esili kokawuka.


mpe etuka ya Negevi mpe etuka ya lubwaku ya Jeriko, engumba ya banzete ya mbila kino na Tsoari.


azali moto ya mitema mibale, moto oyo akangamaka na likanisi moko te na nyonso oyo asalaka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ