Tango kaka babimisaki bango na libanda, moko kati na mibali yango alobaki : — Bokima mpo ete bobikisa bomoi na bino ! Botala sima te mpe botelema ata esika moko te kati na engumba oyo ! Bokima na likolo ya bangomba, noki te bokobebisama !
Mosali na yo azwi ngolu na miso na yo, mpe otalisi ngai bolamu makasi na ndenge obikisi bomoi na ngai. Kasi nakokoka te kokima na likolo ya bangomba, noki te likama ekokomela ngai mpe nakokufa.
Tala liloba oyo Yawe, Mosantu ya Isalaele mpe Mokeli na ye, alobi : Boni, bino nde bato bokotuna Ngai soki nakosala nini mpo na bana na Ngai na mikolo oyo ekoya to bino nde bato bokopesa Ngai mitindo mpo na mosala oyo maboko na Ngai esali ?