Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 18:9 - Mokanda na Bomoi

9 Sima, batunaki ye : — Wapi Sara, mwasi na yo ? Abrayami azongisaki : — Azali na ndako.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 18:9
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo moko kati na bango alobaki : — Solo, na mobu oyo ezali koya, kaka na eleko oyo, nakozonga epai na yo, mpe Sara, mwasi na yo, akozala na mwana mobali. Nzokande, Sara ayokaki maloba wana na ekotelo ya ndako ya kapo, na sima ya Abrayami.


Azwaki mafuta ya ngombe, miliki mpe mosuni oyo alambaki, mpe atiaki yango liboso na bango. Abrayami atelemaki pembeni na bango, na se ya nzete, wana bazalaki kolia.


Na yango, Izaki amemaki Rebeka kati na ndako ya kapo ya mama na ye Sara, azwaki ye mpo ete azala mwasi na ye mpe alingaki ye. Boye Izaki abondisamaki na kufa ya mama na ye.


Kasi Yawe Nzambe abengaki mobali mpe atunaki ye : — Ozali wapi ?


Labani akotaki na ndako ya kapo ya Jakobi, na ndako ya kapo ya Lea, mpe na ndako ya kapo ya basi bawumbu mibale ; kasi amonaki eloko te. Sima na ye kobima na ndako ya kapo ya Lea, akotaki na oyo ya Rasheli.


Yawe atunaki Kayina : — Wapi ndeko na yo Abele ? Kayina azongisaki : — Nayebi te. Boni, ngai nazali mokengeli ya ndeko na ngai ?


komibatela malamu, kotambola na bomoi ya peto, komipesa na misala kati na bandako na bango, kozala basi ya boboto mpe ya botosi liboso ya mibali na bango, mpo ete Liloba na Nzambe efingama te.


Mpo na kondima, avandaki lokola mopaya kati na mokili oyo Nzambe alakaki ye ; azalaki kovanda na bandako ya kapo lokola Izaki mpe Jakobi oyo mpe bazwaki elaka ya ndenge moko na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ